Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Eteni Longondo azwi liberté provisoire (avocat)


Dr. Eteni Longondo, ministre ya bokolongono na Kinshasa, 10 mars 2020. (VOA/Lingala)
Dr. Eteni Longondo, ministre ya bokolongono na Kinshasa, 10 mars 2020. (VOA/Lingala)

Dr. Eteni Longondo, moyi UDPS lingomba lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi mpe ministre ya kala ya Bokolongono abimisami mpo na mwa ntango na boloko ya Makala (CPRK) to azwi liberté provisoire, elobi basembeli baye.

Dr. Longondo atiamaki na boloko ya Makala to CPRK le 28 août 2021 na kofundama na kopengwisa misolo mya COVID-19.

Basambeli ba Dr. Eteni balobi ete bapesaki na bazuzi mikanda milakisaki ete misolo mipengwisamaki te.

"Moko na bakambi ba UDOS, ministre ya kala ya Bokolongono Dr. Eteni Longondo awuti bobima na Makala... apesami bonsomi ya mwa ntango," eyebisi Me Hugues Pulusi Eka na mopanzi sango Stanis Bujakera .

Instruction to mpe misala mya bazuzi, mikokoba, ebakisi Me Pulisi.

Dr. Eteni alobaka ete FMI (Fonds monétaire international) endimaki, nsima na bolukiluki, ete misolo miyibamaki te. Yango epesaki misolo 1,5 milliards ya dollars na mbulamatari ya RDC.

XS
SM
MD
LG