Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Batangu Mpesa mokeli na mono mokoki kobikisa COVID-19 akufi na mubi 79


Etienne Flaubert Batanga Mpesa mokeli ya mono mpo na bokono bwa COVID-19 akufi na Kinshasa, 5 mars 2021. (Facebook/Pharmacien Glorry)
Etienne Flaubert Batanga Mpesa mokeli ya mono mpo na bokono bwa COVID-19 akufi na Kinshasa, 5 mars 2021. (Facebook/Pharmacien Glorry)

Etienne Flaubert Batangu Mpesa, pharmacien (monganga ya nkisi) mpe moto na zebi (chercheur monene) oyo akelaki mono ya kobikisa na COVID-19 (ManaCOVID) mpe mino misusu akufi, elobi ministère ya Rechercher scientifique. Mono mwa ye mozalaki nanu komekama mpe bilembo ya malamu mingi bindamami.

M. Bantangu awei na Kinshasa le 5 mars 2021 na bokono bowumeli, ekomi na liyebisi directeur ya cabinet ya Recherche scientifique mpe innovation technique, Dr. Oscar-Shetonde Mihigo.

Liwa lya ye lipesi mpasi na ministère ya Recherche scientifique mpe Innovation technologique mpe etiki libulu linene na lingomba kya bat oba zebi na RDC, ekomi ministère.

M. Batangu azalai Moluki ya mpiko, etatoli ministère. Nkondo Btangu apesaki maboko mingi na ministère ya Recherche scientifique mpe innonvation technologique, na kozala mpenza na misala mya Commission scientifique mpe ya Pool scientifique etiamaki na ntina ya kosunga Comité multisectoriel ya bitumba na bokono bwa COVID-19.

M. Batangu mpesa asali ManaCOVID, moko na mino mizali kobundisa COVID-19.

Ministre ya mambi ma Bokolongono, Dr. Eteni Longondo atotolaki ete ManaCOVID ezali malamu mpo na kobikisa bakoni mpe ezali komemela bakoni mpasi mosusu te.

M. Btangu azalaki na mibu 79.

Azalaki mpe mokeli mibeko ya kala mpe mokambi ya Centre de recherche phamaceutique ya Luozi (CRPL).

XS
SM
MD
LG