Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etat de siège: Parlement endimi kobakisa mikolo 15 mpo na mbala ya motoba kasi bitumba bingali na Djugu


Mobundi moko ya URDPC/CODECO (Union des Révolutionnaires pour la Défense du Peuple Congolais/Coopérative pour le Développement du Congo) atelemisi ba civils na Bunia, Ituri, 18 septembre 2020.
Mobundi moko ya URDPC/CODECO (Union des Révolutionnaires pour la Défense du Peuple Congolais/Coopérative pour le Développement du Congo) atelemisi ba civils na Bunia, Ituri, 18 septembre 2020.

Parlement ya RDC endimi kobakisa mikolo 15 na état de siège kasi bitumba bingali makasi na Djugu na Ituri, epayi wapi ba Chinois basato bamemami na babundi ba CODECO (Coopérative pour le développement du Congo).

Sénat endimi yango mpe lokola mercredi kobakisa mikolo zomi na mitano misusu mpo na mbala ya motoba na état de siège mpo na bituka ya Ituri mpe ya Nord-Kivu.

Mardi, Assemblée nationale mpe endimaki yango.

Nzoka nde, Lopitalo ya monene ya Kilo na Djugu, na Ituri, etumbami na bitumba kati na mampinga ma Ekolo Congo démocratique mpe batomboki ba CODECO. Ba butndi ba CODECO bafundami na kotumba yango.

Bakeli mibeko baike lokola bayi société civile bazali kosenga suka na état de siège.

Nzokande bayi mampinga bapameli ba députés mpe bayipolitiki mosusu na kozala nsima na mangomba ya basimba minduki na monyele.

XS
SM
MD
LG