Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lingomba Etat islamique esakoli ebotoli mboka mibale mpe basoda mingi bakufi na nzamba na Ituri


Photo etalisa bato baike na sokot baye lingomba etat islamique elobi ekangi na Mabiba na Ituri, le 9 août 2021. (Photo/SITE)
Photo etalisa bato baike na sokot baye lingomba etat islamique elobi ekangi na Mabiba na Ituri, le 9 août 2021. (Photo/SITE)

Bayi lingomba Etat Islambique basakoli ete babotoli mboka mibale ya ba kristu na Ituri nsima na bitumba, kolanda Agence ya sango AMAQ to SITE.

Bayi lingomba Etat islamique batie bilili mpe bililingi mingi na ba réseaux sociaux mpe basakoli ete Basoda ya mapinga bakufi.

"Basoda bakimaki na nzamba eye bayebi malamu te mpe mingi bakufi na kolemba mpe nzala," elobi lingomba Etat Islamique eye elakisami elongi na ba ADF na RDC.

Kolanda sango SITE ebimisi le 9 août 2021, bitumba byango bisalamaki na mboka Mabiba.

ADF ezali lingomba lya batomboki ba kala ba Ouganda kasi emikotisa na Etat islamique mpe ezwa bato bawuta mboka mingi mpo na kobunda etumba ya djihad na ntina ya koluka kotia bokonzi ya ba musulmane na RDC.

Yango esalami ntango "commission Défense et sécurité" to misala mya Bobateli mpe Bokengi ya Assemblée nationale ya RDC mizali koluka koyeba soki état de siège etiama na est ekomi wapi.

Bakeli mibeko babakisa mpo na mbala ya mitano mikolo mitano na état de siège kasi basengangi koyeba soki yango ekomi wapi.

Mardi, bakambi ba police bayonalaki na commission.

Bakambi ya ba soda batiama na Nord-Kivu, lieutenant général Constant Ndima Kongba mpe ya Ituri, lieutenant général John Luboya Kashama bazali mpe na Kinshasa mpo na misala mya Assemblée nationale.

XS
SM
MD
LG