Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etat de siège: FARDC ebotoli QG ya lingomba APCLS na Masisi


Mampinga ya ekolo Congo démocratique FARDC na Kididiwe, Beni, Nord-Kivu, 12 novembre 2019. (Twitter/FARDC)
Mampinga ya ekolo Congo démocratique FARDC na Kididiwe, Beni, Nord-Kivu, 12 novembre 2019. (Twitter/FARDC)

FARDC (Mapinga ma ekolo Congo démocratique) esakolie ete ebotoli quartier général ya basimba minduki ya lingomba APCLS na territoire ya Masisi, na Nord-Kivu

Mampinga ma ekolo Congo democratique malobi ete mabotoli quartier général ya ba basimba minduki ya APCLS (Alliance des patriotes pour un Congo libre et souverain) mpe mabomi basimba minduki minei lobi mokolo mwa misato le 15 septembre na territoire ya masisi na province ya Nord-Kivu.

FARDC ebotoli QG to esika ya basimba minduki ya ba APCLS na Masisi (Molobeli)
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:42 0:00


Molobeli ya secteur opérationel Sokola 2 ya FARDC, lieutenant-colonel Njuke Kayiko oyo apesi sango eye na elobeli ya Erikas Mwisi abakisi ete mokonzi na bango Janvier Karayiri akimi mpe mampinga mazali kokoba na koluka ye.

Q.G ya APCLS ezalaki bongo na localite ya Lukweti, na Ishango.

Mikolo mileki, kaka na sanza eye ya libwa, elobi Actualite.cd, basimba minduki 45 lya ba lingomba liye, bakendeki komitika na maboko ya ba FARDC.

Kasi baike ya baye basi bamitika o'maboko ma bayi FARDC, bazali kaka kozela na mboka Mubambiro, na territoire ya Masisi, kokota na bango na programme ya désarmement, démobilisation, relèvement communautaire mpe stabilisation (P-DDRCS).

Mingi na kati na bango bazongeli kosimba minduki mpo bazali kozwa lisungi basengeli na yango te.

XS
SM
MD
LG