Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Hélicoptère ya FARDC ebungaki emonani na nzela ya Kisangani


Ba rangers bazali kokita na hélicoptère na parc ya Garamba, na Ituri, RDC, 7 février 2016.
Ba rangers bazali kokita na hélicoptère na parc ya Garamba, na Ituri, RDC, 7 février 2016.

Bayi mampinga ma Ekolo Congo démocratique bayebisi ete hélicoptère ya FARDC  ebungaki emonani na nzela ya Kisangani na etuka ya Tshopo.

Boko ba bayi FARDC, mampinga ma RDC, balobi ete emonani nsima na kokita na lombango na nzamba na Bafuasenge na km 120 ya Kisangani.

Lipinga lya basoda likendaki na esika yango likutaki hélicoptère yango na bakumbi na yango.

Basoda basusu batindami na esika yango mpo na kosunga bango.

Hélicoptère yango ebungaki na kowuta na Beni mpe Ituri na etinda.

Ezalaki moko ba ba hélicoptères babale ezalaki na etinda yango.

XS
SM
MD
LG