Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba vols mibale mpo na kozongisa ba Américains bakangami na RDC


Ba passeports Américains, 21 mai 2020. (Twitter/Departement d'Etat ya Etats-Unis)
Ba passeports Américains, 21 mai 2020. (Twitter/Departement d'Etat ya Etats-Unis)

Etats-Unis ebongisi mibembo mibale mya mpepo mpo na kozongisa na Amerika bana na yango bakangami na RDC likolo na mikano mya bokangi ndelo ya bikolo mpo na COVID19.

Ba vols mibale milengelami mpo na komema bana ya Etats-Unis mpe bapaya banso bazwa mikanda ya kovanda na mabela ya Etats-Unis.

"Bana ya mboka Etats-Unis mpe Bapaya bazwa mikanda ya kovanda na Amerika : mibembo mibale mya mpepo (mikosalama) mposo mokoya na RDC, le 26 mai mpe le 30 mai kolongwa Kinshasa, Goma mpe (soki manso mazali malamu) Lubumbashi mpo na kokende Addis (Addis Abeba na Ethiopie). Mpepo ya komema (bango) kolongwa Addis kino na Washington D.C. ezali," esakoli ambassade ya Etats-Unis na liyebisi.

Ambassade ya Amerika elobi ete ba oyo bakozonga soki bakomi Washington D.C, mibembo mya mpepo mpo na kokende na ba Etats misusu ya USA mikosalama na agences ya mibembo kasi na mbulamatari te.

Bana ya Amerika bakangami na Ekolo Conog démocratique (RDC) lokola baye ya bikolo misusu.

Mbulamatari ya Anerika eyebisi te motango mwa bato baye bokoki kozonga.

Etats-Unis esalaki ba vols misusu ya kozingisa bana ba yango mpo na mboka misusu lokola Côte d’Ivoire.

XS
SM
MD
LG