Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Egypte, Sudan na Ethiopie na masolo mpo matata ya barrage ya Nil na Kinshasa wuto le 3 kino le 5 avril


Moussa Faki Mahamat (G), mokambi ya Commission ya Union africaine, na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation na Kinshasa, RDC, 3 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Moussa Faki Mahamat (G), mokambi ya Commission ya Union africaine, na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation na Kinshasa, RDC, 3 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Ba ministres ya mambi ma bikolo bya bapaya ya Egypte, Etiopie na Sudan bakokutana na masolo na Kinshasa na lisungi ya RDC, wuto samedi kino lundi, mpo na matata ma barrage ya Nil, elobi bayi présidence na bayi ministère ya mambi ma bikolo bya bapaya ya RDC.

Président Félix Tshisekedi oyo azali kokamba sika Union africaine nde akokamba masolo mango.

Moussa Faki Mahamt, mokambi ya Commission ya UA, akozala mpe lokola na masolo mango.

Egypte na Ethiopie basengaki RDC na ebandeli ya sanza kosunga na kozwa eyano na matata mpo na barrage enene, Barrage ya Grande Renaissance (GERD) Ethiope ezali kotonga likolo na ebale Nil eye mboka minei (Egypt, Sudan, Ethiopie mpe RDC) ekabolaka.

Barrage yango ekobimisa lotiliki mingi mpo na Ethiopie eye ekoki koteka lotiliki lyango kasi ekozala na mbano mpo na Egypte na Sudan baye bazali bikolo bya esobe

XS
SM
MD
LG