Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Guterres azelami na suka ya sanza na RDC


Kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres, na New York, 20 juin 2017.
Kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres, na New York, 20 juin 2017.

Kalaka monkonzi ya ONU, Antiono Guterres, akokoma Congo démocratique na suka ya sanza mpo na bokono ya Ebola mpe mandat ya Monusco (misala ya ONU na RDC), eyebisi molobeli wa ye, Stéphane Dujarric.

M. Guterres akobanda mobembo na ye na Nord-Kivu o’mokolo ya mposo le 31 août.

Akowuta yambo na France na bokutani ya G7 mpe na Japon mpo na masolo ya ntombwa ya Afrika, elobi M. Dujarric.

Mobembo na ye na Nord-Kivu ekozala mpo na makasi mapesa lisusu na bitumba na Ebola, elimboli molobeli wa ye.

Kala mokonzi ya ONU akosolola na baye babiki na Ebola mpe baye basailisaka bakoni na centre ya lisalisi ya bokono boye.

Ebola esili koboma bato 1.930 na koleka mobu moko mpe OMS (Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono) esakola ete ezali bosenga ya makasi ya mokili mombimba.

M. Guterres mpe akotala likambo ya botiyami na mosala ya mandat ya basoda ya kimya ya ONU na kobatela ba civils.

Nsima na yango, kalaka mokonzi ya ONU nde akutani na président Félix Tshisekedi, bakonzi basusu ya mbulamatari mpe baye ya société civile.

XS
SM
MD
LG