Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr. Mukwege asengi Tshisekedi koluka botindami ya balukiluki mpo na mbeba na RDC


Président Félix Tshisekedi akutani na Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya 2018, na New York, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi akutani na Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya 2018, na New York, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya Kimya na 2018, asengi bokelami ya tribunal pénal international mpo na RDC.

Dr. Mukwege akomi na lisakoli na ye vendredi ete makambo mazali kombongolama te ata état de siège etiamaki wuto sanza ya mitano na Beni mpe Ituri.

"Ntango bakonzi ba mokili bakozwa maloba kala te" (na Assemblé générale ya mobu inso ya ONU), "tosengi na mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi koluka lisungi lya Nations unies mpe résolution ya Conseil ya sécrutié na ntina ya botiami na esika, na lombango, ya limpinga lya balukiluki", ekomi Dr. Mukwege.

Prix Nobel ya kimya apameli bobomi bato bozali kokoba.

Ndenge biyano bya politiki mpe bya bokengi bikoki eloko te, tondimisami ete nzela ya kimya ekowumela, ekoleka na botiami ya misala mya justice transitionnelle, elobi Dr. Mukwege.

Monganga asungaka basi baswama na kozwama na makasi na bitumba na est ya RDC abandeli nde bosenga asala mbala mingi.

XS
SM
MD
LG