Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ramazi Shadary, Kabund na Kabuya batiami libanda ya masolo ya kobongisa bokutani ya Tshisedi na Kabila


Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba na bokutani na baye ya CACH (Cap pour le changement) mpe ya FCC (Front commun pour le Congo) na Kinshasa, 7 août 2019. (Cabinet Primature RDC)
Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba na bokutani na baye ya CACH (Cap pour le changement) mpe ya FCC (Front commun pour le Congo) na Kinshasa, 7 août 2019. (Cabinet Primature RDC)

Lipinga lya bato baike lizali kobongisa bokutani kati na président Félix Tshisekedi, mokambi ya FCC, na mokonzi ya kala Joseph Kabila, ya FCC. Jean-Marc Kabund, Augustin Kabuya mpe Emmanuel Ramazani batiami libanda.

Ngambo inso ezali kondima ete lipinga lya balakisi bilongi na bango lizali bongisa bokutani ya M. Tshisekedi na M. Kabila. Kasi nungunungu ezali mpo etali mbongwana ya comité de suivi ya boyokani na bango.

Augustin Kabuya, kalaka mokonzi ya ngonga moke ya UDPS, alobi nanu comité ya suivi ebongwani te. Kasi mwa lipinga like nde litiami na esika.

Kasi basusu, mingi mpenza bayi FCC, balobi MM.Kabund, Kabuya mpe Vidiye Tshimanga, mopesi toli ya mambi ma Stratégie ya président Tshisekedi, mpe Emmanuel Ramazani Shadary kalaka mokmabiya PPRD, batiyami pembeni.

Na esika na bango, Peter Kazadi oyo azalaki mopesi toli ya nkondo Etienne Tshisekedi mpo mambi ma Bosembo, Kitenge Yesu molakisi elongi ya président Félix Tshisekedi, mpe Théthé Kabwe nde babakisami na Nicolas Kazadi mpo na ngambo ya CACH.

Néhémie Mwilanya motambwisi ya FCC, Aubin Minaku, Azarias Ruberwa mpe Raymond Tshibanda nde batikali na ngambo ya FCC.

Bazali nde kaka kobongisa bokutani ya Félix Tshisekedi na Joseph Kabila, elobi M. Kabuya.

Kalaka mokonzi ya UDPS akundoli ete akosepela soki ata balongoli ye na masolo mango.

Mpo na ye bayi FCC nde bapebisaka masolo yango.

XS
SM
MD
LG