Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Didi Manara apesami ebonga ya 2e VP ya CENI, Katembo ya questeur mpe Ilongo na plénière


Bobendani kati na bakeli mibeko na Assemblée nationale, na Kinshasa, RDC, 12 avril 2012.
Bobendani kati na bakeli mibeko na Assemblée nationale, na Kinshasa, RDC, 12 avril 2012.

Assemblée nationale endimi nkombo ya basato bakolakisa elongi ya opposition na CENI, misala mya maponi kasi opposition endimi yango te. Didi Manara apesami ebonga ya mokambi molandi to deuxieme vice-président ya CENI, Agé Matembo, ebonga ya questeur mpe Jean Ilongo Tokole nde membre ya plénière.

Assemblée nationale ya ekolo Congo démocratique endimi Didi Manara oyo abwakisami na PPRD, lingomba lya mokonzi ya kala Joseph Kabila, mpo alakisa elobi ya opposition, bo’ mokambi molandi to deuxieme vice-président ya CENI, misala mya maponami.

Agé Matembo nde azwi ebonga ya questeur to moto atali misolo ya

CENI mpe Jean Ilongo Tokole azali moko na bayi pleniere to likita linene. Bato basato baye bapesami mabonga matikalaki mpo na opposition.

Kasi nungu nungu ezali kokoba na maye matali boyokani mpo na maponami mpo bakambi ba PPRD mpe FCC babenganaki bato basato baye mpe bakobi koloba ete batindi ata moto te na misala mya maponami.

PPRD elongalaki Didi Manara nae bonga ya mokambi ya groupe parlementaire na yango.

Mangomba misusu mpe lokala ngambo moko ya Lamuka ya Martin Fayulu ma Adolphe Muzito bango mpe baboyi kotinda bato.

Bayi societe civile mpe mingi mingi ba episkopo ya Katoliko bango mpe bazali kosenga boyokani.

XS
SM
MD
LG