Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

COVID19 : PM Ilunga asengi collectif budgétaire mpo misolo mizali kokoka te


D-G:Mokambi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda pembeni ya mokambi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi na N'Sele, Kinshasa, 14 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)
D-G:Mokambi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda pembeni ya mokambi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi na N'Sele, Kinshasa, 14 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Ministre ya yambo ya Ekolo Congo Démocrqtique sylvestre Ilunga Ilunkamba na mbulamatari bakutani na bakambi ya parlement mpe basengi bango kotala ndenge ya kosala collectif budgétaire mpo COVID19 ememi nkwoso mingi.

Ilunga Ilunkamba alobi ete mabongisi manso ya misolo mabebisami mpo COVID19 lokolsa nkita ya ekolo Congo democratique etalaka mingi libanda.

"Bongo tokotisaka ekiti. Yango toye kosolola na bakambi ya suku mibale ya parlement mpo na likambo lyango. Eza mpo na kotala ndenge kokoki kokende liboso mpe kolanda yango na ezaleli na biso ntango ya kobimisa misolo," eybisi na ba bapanzi sango M. Ilunga nsima na bokutani na ba kambi ya parlement.

"Esengeli totia na mitu ete budget oyo endimamaki tokokoka te kosalela yango mpo ba recettes ezali kolanda te na ngonga oyo, ba dépenses ezali kaka mingi lokola tobongisaki yango. Tosololi na mokambi ya Assemblée nationale mpe na mokambi ya Sénat mpo na kotala ndenge nini tokoki kosala na lobango collectif budgétaire na ntina na koyeba kolanda ndenge makambo mazali kokende lelo," elimboli M. Ilunga.

Budget ya RDC ezalaki mpo na mbala ya yambo pene na 10 milliards $.

Lokola na mokili mobimba, misala mingi mikangami na RDC mpo na kobekisa bopanzani bwa coronavirus ya sika (COVID19).

COVID19 ememi nkwokoso ya nkita na mokili mbimba.

Banganga na boyebi bazali kobanga ete récession esalama mpe eleka ata dépression ya 1920.

Misala mikangami na bisika ebele na mokili mobimba mpo na COVID19.

XS
SM
MD
LG