Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mibu misato ya misala makasi mikatameli DG ya OVD na FONER


Président Félix Tshisekedi (1e G) akiti na chantier moko ya OVD pene na DG ya OVD Benjami Wenga na Kinshasa, RDC, 13 février 2020. (Twitter/Président RDC)
Président Félix Tshisekedi (1e G) akiti na chantier moko ya OVD pene na DG ya OVD Benjami Wenga na Kinshasa, RDC, 13 février 2020. (Twitter/Président RDC)

Benjamin Wenga mokambi ya OVD mpe Fulgence Bamaros Lobota ya FONER bakatelami etumbu ya mibu misato ya misala makasi na bosambisami na bango mpo na misala mya kotonga nzela na bituka bya Nord-Kivu mpe Sud-Kivu.

Moninga na bango, mokambi ya SOCOC, Modeste Makabuza, tribunal ya Grande instance ya Kinshasa/Gombe ekateli ye mobu moko ya misala.

Bazalaki kosamba wuto sanza mibale, na boloko bonene ya Makala (CPRK) na Kinshasa, mpo na bopengwisi mosolo ya misala mya kotonga mpo na mikolo nkama mya bokonzi ya Felix Tshisekedi.

M. Bamaros afundami na kopengwisa 12,5 millions ya dollars. M. Makabuza nde azwi etumbu mpo alekisa misolo mina na compte ya banque na ye.

Bazuzi bakweyisi bango na likambo mikolo misato nsima na etumbu ya mibu 20 mya misala makasi TGI Kinshasa/Gombe aketelaki Vital Kamerhe, mosungi mpe mokambi mwa ndako ya mosala ya président Félix Tshisekedi na bosambisami mpo kopengwisa misolo mya botongi ndako 4.500.

XS
SM
MD
LG