Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour internationale ya justice ekotinda ba experts mpo na kotala motuya ya mbeba Ouganda esala na RDC


Président Félix Tshisekedi (G) ya RDC na mokokani wa ye ya Ouganda Yoweri Museveni na bokutani na Entenbe, Ouganda, 9 novembre 2019.
Président Félix Tshisekedi (G) ya RDC na mokokani wa ye ya Ouganda Yoweri Museveni na bokutani na Entenbe, Ouganda, 9 novembre 2019.

Cour internationale ya justice ezwi mokano ya kotinda lipinga lya banganga ya mayele na ntina ya koluka koyeba mpeza motuya ekokani na mbemba mampinga ma Ouganda masala na RDC.

CIJ esakolaki yango mardi na Haye.

Ouganda esengamaki kofuta mbeba esalaka na RDC.

Kala mbulamatari ya RDC esengaka koleka 10 milliards $.

Kasi mbulamatari ya sika wuto bokoti na bokonzi ya Félix Tshisekedi na janvier 2019, esakolaki ete endimi kobongisa na malembe na Ouganda.

Mpo na yango, Ouganda na RDC esengelaki etonga nzela nzike wuta Ounga kino Nord-ubangi mpe wuta Ituri Kino Haut-Katanga.

Mampinga ma Ouganda makotaka na polele na RDC (ex-Zaïre) na 1996 elongo na maye ma Rwanda, na nsima ya batomboki ba AFDL (Alliance des Froces démocratiques du Congo) baye bamemaki Laurent-Désiré Kabila na bokonzi le 17 mai 1997.

Mampinga maye matikalaka na RDC kino 2002 ntango babimaki na polele.

Basalaki biutmba mbala mibale na mampinga ya Rwanda na mabele ma RDC.

Bato mingi bakufa mpe biloko mingi bibebisama.

Mampinga ma Ouganda mapesaka mpe maboko na batimboki ba MLC (Mouvement pour la libération du Congo) ya Jean-Pierre Bembe eye ebongwana lingomba lya politiki.

Mampinga ma Rwanda malakisa na molongo ete makota na RDC na bobengisami ya bakonzi ya RDC. Yango etumbu epesamelama yango te.

XS
SM
MD
LG