Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Carburant mpasi na Brazzaville


Bakumbi mituka na station-service moko na Brazzaville, Congo, 31 mai 2002.
Bakumbi mituka na station-service moko na Brazzaville, Congo, 31 mai 2002.

Mpasi mpo na kozwa petololo to carburant na Brazzaville. Wuto mikolo misato, mituka misali milongo na engumba mokonzi ya Congo-Brazzaville mpo na kozela essence, esakoli Agence Chine nouvelle (Xinhua).

"Nazo’sala lisusu mpenza te. Nakomia kosala ba demi-courses," elobi na Xinhua, mokumbi taxi Gilbert Goma, na mibu 38.

Yango esali ete ntalo ya essence ekomi na 800 Francs CFA to 1.000 Francs CFA na litre bisika misusu. Ntalo bakonzi batia ezalaki nde 595 FCFA.

Mbulamatari nanu epesi ndimbola te kasi Agence Chine nouvelle elobi ete ezali mpo na nkwokoso na nzela ya engunduka to chemin de fer Congo Océan. (CFCO)

Moko na bayi Congolaise de Raffinage (CORAF) na Pointe-Noire alobi carburant ezali na yango kuna.

CORAF ekoki kobimisa kino million moko ya tonne ya brut mobu monso kasi sika ebimisaka kaka 600.00 tonnes eye ekoki te mpo bosenga ya ekolo.

Wuto mobu moleki, mbulamatari ebandaki misala mya kotonga raffinerie mosusu eye ekokoka kobisa 2,5 millons ya tonnes mibu minso mpe ekopesa misala na bana mboka 5.000, na boyokani na Chine.

XS
SM
MD
LG