Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou na Xi Jimping bandimi kotala lisusu likambo lya niongo ya Congo-Brazzaville


Président Denis Sassou N'guesso na mokokani wa ye Xi Jinping ya Chine na Beijing, na Chine, 5 septembre 2018.
Président Denis Sassou N'guesso na mokokani wa ye Xi Jinping ya Chine na Beijing, na Chine, 5 septembre 2018.

President Denis Sassou N’Guesso na Xi Jimping, mokokani wa ye ya Chine, bandimi kotinda na ba experts ya mbulamatari mibale likambo lya kozongisa nsima bofuti nyongo ya Congo-Brazzaville.

Denis Sassou N’Guesso basololi lundi na nzela nsinga.

"Xi Jimping andimi bosenga bwa président Sassou N’Guesso ya kotala lisusu niongo ya Congo-Brazzaville ezwaki na Chine. Ba experts ya mbulamatari mibale bakosolola yango," elimboli ministre ya Budget mpe Portefeuille public, Robert Rigobert Andely.

Niongo ya Congo-Brazzaville na Chine ezali 1.300 milliards CFA to 2,6 milliards $.

Kolanda maloba ma ministre Andely, Congo-Brazzaville ekoki kolikya ete niongo yango nde ezongisami nsima.

Yango ekosunga mpe na masolo na Fonds monétaire international (FMI).

Mibu mileki FMI eboyaki kozongisa linaka lya yango na Congo-Brazzaville ezalaki kofunda na kobomba nionso na yango mosusu na Chine.

Lundi, ministre wa yambo ya Congo-Brazzaville, Anatole Collinet Makosso alobaki na parlement ete niongo mombimba ya Congo-Brazzavillle na bikolo mpe ba instutitions misusu ezali 6.016,5 milliards CFA to 12 milliards $ mpe etalisi ya 98% BIP.

XS
SM
MD
LG