Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr. Alexandre Dzabana na babundi basusu ba makoki ba bomoto batikami na Brazzaville


Dr Alexandra Dzabana elongo na babundi basusu ba makoki maboto na bokangami na Brazzaville, photo etiami na Facebook ya Voix de Sans Voix/Voix de la Résistance
Dr Alexandra Dzabana elongo na babundi basusu ba makoki maboto na bokangami na Brazzaville, photo etiami na Facebook ya Voix de Sans Voix/Voix de la Résistance

Dr. Alexandre Dzabana, mokambi ya lingomba ya makoki ma bomoto M22 elongo na babundi basusu banei ba makoki mabomoto babimisami o’bokolo mpo na mwa ntango.

Cour d’appel ya Brazzaville epesaki ndingisa o’mwa misato ete bakangami baye bapesama liberté provisoire.

« Babimisami na bokangami na Maison d’arrêt ya Brazzaville kasi Dr. Dzabana amemami mbala moko na lopitalo mpo azali na bokono makasi, etatoli mopanzi moko VOA Lingala ebengaki wuto Brazzaville.

Dr. Dzabana akangamaka le 11 mars elongo hrist Belvy Sidney Dongui Ganga, Niati Jean River, Paka Jean Louis, Mombo Etienne mpe Miangouila Florian Werner mpe batikami elongo.

Ezalaki na eloko ya maponami ya mokonzi ya mboka malongamaki na président Denins Sassou N’Guesso oyo atikali na ebonga nsima elonga na ye, mpe azali na bokonzi koleka mibu 36.

Bafundamaki na makambo mingi kati na yango koluka komema mobulu na mboka.

Bayi société civile bazalaki kosenga botikami na bango.

XS
SM
MD
LG