Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

JO Tokyo 2020 : Nageuse Stefan Sangala ya Congo "ameli mayi” kasi Sud-africaine Emma Chelius aleki

Nageuse Stefan Sangala (G) ya Congo-Brazzaville azali kotala arbitre na mopanzi ya nageuse Aya Girard De Langlade Mpali ya Gabon na mokano ya 50 m na mayi na Jeux olympiques Tokyo 2020, Japon, 30 juillet 2021. (Photo by Jonathan NACKSTRAND / AFP)

Nageuse ya Congo-Brazzaville Stefan Sangala abendi mokila na momekano ya 50 m na mayi na Jeux Olympiques ya Tokyo 2020.

Na mibu 26, Stefan Sangala asali 37'',92 minutes mpe abimi na molongo ya sambi.

Stefan Sangala alongwe. Azalaki yambo na moto ya suka Nada Mohammed W S Arakji ya Qatar oyo azalaki ten a bopoti yango.

Momekano mwango molangami na moyi Rwanda Alphonsine Agahozo na 30'',50.

Na molongo ya mibale ezalaki na elenge mwasi Osisang Chilton ya Palau oyo asali 30'',67.

Kasi bango banso baleki na etapi ya mibale te.

Elenge mwasi ya Safrique du Sud Emma Chelius nde aleki, azalaki na molongo ya misato na 24’’65 ya serie ya zomi na bopoti mosusu.

XS
SM
MD
LG