Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Nzoto ya nkondo Tshisekedi kala te na Kinshasa


Moto moko amemi photo ya nokondo Etienne Tshisekedi yambo na misa, na Kinshasa, 1 février 2019.
Moto moko amemi photo ya nokondo Etienne Tshisekedi yambo na misa, na Kinshasa, 1 février 2019.

Baye bazali kosala mabongisi bayebisi ete mpepo moye mozali komema nzoto ya nkondo Etienne Tshisekedi ekoki kokita na lipabana ya mpepo ya N’Djili minutes moke yambo na 19h na Kinshasa.

Mpepo yango epumbukaki na Bruxelles yambo na nzanga.

Nzoto ya mokambi ya kala UDPS mpe Premier ya kala ya Ekolo Congo démocratique elongwaki lisusu lobi loleki te na Bruxelles mpo na mwa nkwokoso.

Nsima bokomi lelo na engumba mokonzi ya Congo-démocratique nkondo Etienne Tshisekedi akomema na Morgue ya Hôpital ya Cinquantenaire kasi akoleka na Boulevard Lumumba mpe na Limete epayi wapi ndako waye mpe parti na ye UDPS bizalaka.

Lobi na ntongo nde ndambo ya baye ya libota batomboli nzoto mpo na bobemani wa yango na Stade ya ba Martyrs ya Pentecôte mpo na misasa.

Mobundi ya démocratie ya Congo akotiyama na litata o’mokolo ya le 1er juin.

XS
SM
MD
LG