Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden alongoli etumbu ya Burundi nsima na Nkurunziza


Nkondo Pierre Nkurunziza mokonzi ya kala ya Burundi, Gitega Province, June 7, 2018.
Nkondo Pierre Nkurunziza mokonzi ya kala ya Burundi, Gitega Province, June 7, 2018.

Joe Biden mokonzi ya Etats-Unis asakoli mokano mplongoli etumbu likolo na Burundi.

Mbulumatari ya Etats-Unis elobi mobulu mpe bobomi bozalaki kosalama na Burundi mpo na démocratie esili.

Etumbu ya yango epesamaki nsima na nkondo Pierre Nkurunziza, mokonzi ya kala Burundi, kolonga maponami mpo na mbala ya misato na kobukaka mibeko mpe mobulu molandamaki na yango.

Pierre Nkurunziza atikaka bokonzi bokonzi yambo na maponami ya 2020 maye awelelaki te mpe maponami mango malongamaki na Evarsite Ndaishimiye.

Kasi akufaki mikolo miike yambo na kopesana bokonzi na Ndayishimiye nsima na elonga ya mokonzi ya sika kosakolama.

XS
SM
MD
LG