Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Burundi

Bato babale bakufi na bobeti grenade moko na Gitega

Bayi police bapanzani o'balabala nsima na mobulu, na Bujumbura, Burundi, 4 mai 2015.
Bayi police bapanzani o'balabala nsima na mobulu, na Bujumbura, Burundi, 4 mai 2015.

Bato babale bakufi mpe mwambe bazoki na grenade moko ebetaki na butu ya mokolo mwa eyenga na ekala moko na Gitega, engumba mokonzi ya Burundi. Mikolo mibale mileki, batomboki ba RED-Tabara balobaki ete babetaki ba obus na libanda lya mpepo na Bujumbura.

"Bobeti grenade bwango bosali mbeba mingi, bato babale bakufi, nzokande mwambe basusu bazokaki mpe bazali kozwa lisalisi na mapitalo maike na Gitega," elobi na AFP moyi police moko.

Moto mosusu ya misala mya bokengi alobi ete ekala yango ezali ya officier moko ya police mpe bakambi baike mpe bayi lingomba lya potiki na bokonzi bazali na esika yango.

Bazeneke baike mpe balobi ete bato mingi bazokaki.

O’mokolo mwa mposo, batomboki ba RED-Tabara basakolaki ete bango nde babetaki ba obus mingi na libanda lya mpepo mpe babetanaki masasi na mampinga.

Ezalaki yambo na président Evariste Nadyishimiye azwa mpepo mpo na mobembo mwa ye na Likita linene lya ONU na New York.

Babundi mingi ya RED-Tabara babombamaka na Sud-Kivu, na RDC, wuto lingomba na bango ekelama mibu zomi mileki.

Bafundamaka na bitumba mingi na mboka na bango.

See all News Updates of the Day

Sango ya Mokili Lelo: Nzoto ya bato ntuku misato na mitano bakufaki na bombi na camp Mugunga ekundami lelo

Sango ya Mokili Lelo: Nzoto ya bato ntuku misato na mitano bakufaki na bombi na camp Mugunga ekundami lelo
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:29:59 0:00

Nzoto ya bato ntuku 35 baye bakufaki na bombes eye ekweyaki na Mugunga ekundami

This photograph taken on May 6, 2024 shows a shelter that was destroyed on Friday May 3, 2023.
This photograph taken on May 6, 2024 shows a shelter that was destroyed on Friday May 3, 2023.

Nzoto ya bato 35 baye bakufaki o’mokolo mwa misato ya sanza eye ya mitano na ba bombes eye ekwayaki na camps ya bakimi bitumba na Mushagala, na Mugunga ekundami o'mokolo mwa mosala misato nsima na matanga masalamaki na Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu.

Balakisi bilongi ba mbulamatari ya Ekolo Congo Démocratique bazalaki na matanga masalamaki mpo na bango.

Esika ya kokanisa bato baye ekelami bongo na Goma mpe ebengami malita ma Genocost.

Bato basusu 37 bazokaki mpe na ba bombes eye.

Mbulamatari ya RDC epamelaki lingomba M23 kobwaka ba bombes eye bisika ya bakima bitumba mpe esengaki na liyebisi ete bitumbu bya politiki mpe bya nkita bipesama na Rwanda eye Kinshasa efundaka kozala nsima na batomboki baye.

Kigali ewanganaki na koyanola na mpamela ya Washington ete mampinga ma yango FPR mazalaka na alima mpe na botosi mpe esengaki nde kotala na ganmbo ya FARDC na batomboki ba FDLR baye Rwanda efundaka Kinshasa kopesa maboko.

Sango ya Mokili Lelo: Mbulamatadi esalami kaka te na ekolo Congo democratiki sanza mineyi sima ya boponami ya mama Judith Suminwa Tuluka

Sango ya Mokili Lelo: Mbulamatadi esalami kaka te na ekolo Congo democratiki sanza mineyi sima ya boponami ya mama Judith Suminwa Tuluka
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:29:59 0:00

Bato ba millions ntuku sambo na motoba na ndambo batika bisika bya bango bavandaka mpo na bitumba na RDC, Sudan mpe na Gaza na 2023.

Bakima bitumba na bisika batiama na Goma, Nord-Kivu, 16 sanza ya mibale 2024.
Bakima bitumba na bisika batiama na Goma, Nord-Kivu, 16 sanza ya mibale 2024.

Motango monene ya pene na bato millions ntuku sambo na motoba na ndambo batindamaki kotika bisika bya bango bavandaka na bitumba mpe matata na Ekolo Congo Démocratique, Sudan mpe na Gaza na suka ya mobu 2023. IDMC, mabongisi matalaka makambo ma bato bakima bisika bya bavandaka kati na bikolo bya bango, malobi ete ezali mbala ya yambo eye motango monene moye mozwama. Motango mwango momati bongo na bilembo ntuku mitano likolo na nkama 50% na mibu mitano. IDMC esakoli ete bitumba mpe matata nde makambo ma yambo maye mapusi koleka bato pene na million ntuku motoba na libwa kokima bisika bavandaka nzokande makama maye masalamaka na mokili nde mapusi pene na millions mwambe kotika bisika bavandaka.

Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe ekobaki, mokolo mua mitano moleki bosambisami ya moyi opposition Mike Mukebayi na boloko CPRK/Makala.

Mike Mukebayi (simisi ye pembe), ntoma ya etuka ya Kinshasa akangemi mpe amemami na boloko ya Makala, Kinshasa, 16 septembre 2019. (Serge Fikiri Kitongo)
Mike Mukebayi (simisi ye pembe), ntoma ya etuka ya Kinshasa akangemi mpe amemami na boloko ya Makala, Kinshasa, 16 septembre 2019. (Serge Fikiri Kitongo)

Na milulu ya bosambisami, basambeli ya mofundami basengi bobimisami ya mua ntango, na ntina ete bokimi na ye bozalaki yako bangela te, esakolaki na Actualite.cd, maître Christian Emango, mosambeli ya Mukebayi. Eyano ya Cour d’appel ezelami kobanda lelo kino mokolo mua misato engebene na bato ebele baye bayebi makambo maye. Bosambisami ya mbala ekoya elengelami mpo na mokolo mua ntuku misato na yoko ya sanza ya mitano ya 2024. Moko ya lingomba politiki Ensemble pour la République ya Moìse Katumbi, Mukebayi akangemaki wuto mokolo mua ntuku mibale na misato ya sanza ya mitano na boloko ya Makala, ekosala sika mobu yoko wuto akangemi. Bokangebi ya Mukebayi esalemaki sima ya bopesi maboko na libota ya muana moko ya mukie oyo azuamaki na likama ya bitumba nan tango ya botamboli to ba manifestations ya opposition mokolo ya ntuku mibale ya sanza ya mitano moleki, eye etambuisamaki na Martin Fayulu, Moïse Katumbi, Matata Ponyo mpe Delly Sesanga. Ba manifestations biye bipanzamaki na nkanda mpenza na ba pulusu, miye misalaki ba mbeba ebele mpe bato mingi bazokaki.

Voir plus

XS
SM
MD
LG