Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden alaki mangwele 17 millions na Union africaine na bokutani na Kenyatta na Maison Blanche


Président Joe Biden (D) ayambi mokokani wa ye ya Kenya Uhuru Kenyatta na bureau Oval ya Maison Blanche, Washington, 14 octobre 2021.
Président Joe Biden (D) ayambi mokokani wa ye ya Kenya Uhuru Kenyatta na bureau Oval ya Maison Blanche, Washington, 14 octobre 2021.

Uhuru Kenyatta, mokonzi ya Kenya ayambamaki jeudi na Joe Biden, mokonzi ya Etats-Unis, na Maison Blanche na Washington. Alaki kopesa Union africaine mangwele 17 millions ma COVID-19.

M. Biden alaki na masolo ma bango kopesa Afrika mangwele 17 millions maselemi na Johnson & Johnson.

Ekobakisama na mangwele 50 millions maye masi mapesama na Union africaine.

"Nazwi mokano ya kokolisa boyokani na biso na Kenya mpe na bikolo bya Afrika," elobi M. Biden.

Washington elaki mpe 1,1 milliards ya mangwele mabundisaka COVID-19 na bikolo bya bobola.

Tokolobela mpe bokolisi ya pole na maye matali misolo na Afrika, ebakisaki présiden Biden.

Mikolo mileki, president Uhuru na libota lya ye batandgamaki na rapport Pandora Papers ebimisaki na kolobaka ete na babomba misolo mingi na paradis fiscaux na nkombo ya ba fondations mpe na ndako mingi libanda lya Kenya.

XS
SM
MD
LG