Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Uhuru Kenyatta na libota lya ye batangami na Pandora Papers


Président Uhuru Kenyatta ya Kenya na likita la Mateya na mokili, na Londres, 29 juillet 2021.
Président Uhuru Kenyatta ya Kenya na likita la Mateya na mokili, na Londres, 29 juillet 2021.

Uhuru Kenyatta mokonzi ya Kenya na libota lya ye batangami na sekele ebengami Pandora Papers na kobomba nkita ya nkoto na millions ya ba dollars na nsima ya ba fondations, ndaku mpe biloko misusu na ba paradis fiscaux.

Ezali ba millions na bamillions ya bolukiluki bisala mibu mingi.

Bolukiluki bwango batalisi mpeza te bopengwisi misolo ya M. Uhuru na libota lya ye kasi bobombi misolo na ba paradis fiscaux.

Lisanga lya ba panzi mingi ICPIJ (consertium international des journalistes d'investigation) nde esangisi sekele eye ebimi.

Misolo mya mibanda kozwama wuto nkondo Jomo Kenyatta, moko na bakonzi ba yambo ba Kenya nsima na limpanda, akotaki na bokonzi na 1964 mpe abotolaki mabele mindele bazalaki kolona mpe kovanda.

Elobami ete M. Uhuru na bayi libota baye bango basonmba banque ya monene koleka na Kenya mpo bazali na misolo koleka.

Baike na libota liye bazali ba ndako ya koleka 32 millions $ na Londres, elobi Pandora Papers ntango bana mboka bazali na mpasi makasi/

Bakonzi ya bikolo misusu mpe na motango ntuku misato na mitano ya kala mpe ya sika, lokola mpe nkama moko na ntuku misato na bakambi ya misala mya mbulamatari ya mboka mingi mpe batangami na Pandora Papers.

XS
SM
MD
LG