Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

BCDC etekami na Eguity Group Holdings ya Kenya


Bakambi ba Equity Bank Congo bapesi lisungi ya million moko ya ba dollars na mbulamatari mpo na bitumba na COVID19, Kinshasa, 25 juin 2020. (Facebook/Equiety Bank Congo)
Bakambi ba Equity Bank Congo bapesi lisungi ya million moko ya ba dollars na mbulamatari mpo na bitumba na COVID19, Kinshasa, 25 juin 2020. (Facebook/Equiety Bank Congo)

Equity Group Holdings ya Kenya esakoli mercredi ete esombi 66,53% ya ba actions ya Banque commerciale du Congo (BCDC), banque privée ya kala koleka na RDC (wuto 1909).

Millionnaire belge George Forrest, oyo azali na mibu 30, actionnaire ya monene koleka nde atekli Equity Group Holdings ba parts na ye.

Ntalo na yango ezalaki 95 millions ya ba dollars.

"Nateki ba actions na ngai na Equity Group Holdings na elikya ete ekokoma banque ya monene koleka na Congo," elobi M. Forrest na liyebisi.

Misala mya Forrestmivandisama na RDC wuto 1922. Misala myango mizali mingi na makele (mines) na Katanga ya kala.

M. Frorrest asombaki 2/3 ya actions ya BCDC na 2009.

Bosangani ya BCDC na Equity Group Holdings bosalami ntango Raw Bank, banque mosusu privée ya monene, ezali afundami na kaniaka ya kobenwisa mi misolo mizalaki mpo misala mya botongi mpo na mikolo nkama ya président Félix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG