Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokambi ya Banque centrale akebisi ba compagnies ya "tshombo" mpo na komatisa dollars


Dégratias Mutombo, mokambi ya Banque centrale ya Congo (BCC), Kinshasa, 27 mars 2014. (Facebook/BCC)
Dégratias Mutombo, mokambi ya Banque centrale ya Congo (BCC), Kinshasa, 27 mars 2014. (Facebook/BCC)

Déogratias Mutombo, mokambi ya Banque centrale akebisi ba compagnies ya téléphone mobile to "tshombo" ete akopesa bango etumbu soki bakobi na kosala ete dollars emataka kaka.

M. Mutombo alaki ba compagnies ya téléphone etumbu ya 5% ya chiffres d’affaires na bango soki bakobi misala ya mabe.

Dollar ekomi 2.055 Francs congolais na balabala ntango taux na yango na banque (BCC) ezali nanu 1.971 FC.

Vodcacom na Orange bazali koteka crédit na bango na taux ya balabala (2.055 Fc).

Na sanza mitsato ya yambo ya mobu, ba opérateurs ya téléphonie mobile banei baye bakobolaka ba abonnés 30 millions na RDC, bazwaki misolo 381,68 millions ya ba dollars.

XS
SM
MD
LG