Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ndako ya ntalo ya Denis Christel Sassou ekangami na bazuzi na Miami


Denis Christel Sassou Nguesso, na Brazzaville, le 28 août 2018. (VOA/Arsène Séverin)
Denis Christel Sassou Nguesso, na Brazzaville, le 28 août 2018. (VOA/Arsène Séverin)

Ba procureurs fédéraux ya Etat ya Miami awa na Etats-Unis bazwi mikaono ete ndako moko ya ntalo mingi ya Denis Christel Sassou N’Guesso ekangama. Misala mya bosembo mizali kolandela mwana ya président Denis Sassou N’Guesso mpo afundama na kopengwisa millioni mingi ya ba dollars ya pétrole na Congo

Kolanda mokanda ya ba zuzi Denis Christel Sassou Nguesso asombaki lopango yango ya monene ya 325 m2 eye ezalaki koteka na 2,4 millions y aba dollars.

Denis Christel Sassou Nguesso axalaki mokambi molandi ya SNPC (Société nationale ya pétrole ya Congo).

Global Witness elobi ete Denis Christel Sassou Nguesso asombaki yango na misolo mipengwisamaki na SNPC.

Ndambo ya misoslo mita mikanda na nzela ya banque ya Gabon BGFI-Bank, kolanda mikanda mya bazuzi.

Kati na le 30 avril 2009 mpe le 22 avril 2016, atindaki pene na 10 millions ya ba dollars na ba comptes efungamaki na moninga na ye na Floride.

Moninga yango akoma mwana ya Amrika mpe azali mwana ya moko na bayi mbulamatari ya kala ya Gabon.

XS
SM
MD
LG