Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Afriland First Bank efundi na bazuzi Global Witness na PPLAAF mpo na Dan Gertler


Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, na Tel Aviv, 18 september 2000.
Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, na Tel Aviv, 18 september 2000.

Afriland First Bank efundi na bazuzi na Paris ba ONG Global Witness mpe PPLAAF nsima na sango babimisi na kolaba ete moyi mombongo Dan Gertler alekaki nzela ya moyibi mpo na kotinda misolo ata azali na etumbu na Etats-Unis.

Afriland First Bank eye ezali filiale ya banque moko ya Cameroun, epameli Global Witness mpe PPLAAF mpo na koyiba, kozwa na nzela ya molili sango etali client na ye eye ezali sekele ya kati ya banque.

Avocat ya Afriland First Bank, Eric Moutet andimi ete afundi ba ONG mibale mye na Paris. Afriland First Bank etie na compte Twitter na yango biyano Me Moutet apesaki na bapanzi sango.

Mpo na Me Moutet, Global Witness mpe PPLAAF esali mbeba misusu lokola kanyaka kokosa mpe kosalela lokuta.

Nzokande Ba ONG mibale miye Global Witness mpe PPLAAF balobi ete Dan Gertler ayebaki na koleka nzela mosusu mpo na kosala misala mya ye yakolekisa mbongo ata azali na nse ya etumbu ya Etats-Unis, eyebisi Global Witness na PPLAAF.

Global Witness mpe PPLAAF balobi ete Afriland First Bank esalisaki M. Gertler na koleka na nzeka ya molili.

XS
SM
MD
LG