Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bayike bapekisi misa mpo na koboya botelemisi mosala ya balakisi na Bukavu


Wenze ya Bukavu, Sud-Kivu, 2, 2017.
Wenze ya Bukavu, Sud-Kivu, 2, 2017.

Bato bayike batelemaki o’boso ya b'eklezia katoliko mpe bapekisa misa kosalama o'mokolo ya eyenga na Bukavu, na Sud-Kivu, mpo na koboya botelemisi mosala ya balakisi. Bato basali mobulu mwango bafundi ba sango kozala na nsima ya mokano ya balakisi ya kopemisa mosala.

"Mobulu mwango mosalami na ba paroisses katoliko mitano," endimi mokambi ya engumba mokonzi ya Sud-Kivu na AFP.

Na Cathédrale ya Bukavu, baye basalaki mobulu batumbaki ba pneus mpe bayembaki nzembo ya kofinga ba sango. Bazalaki na banderoles bakoma "misa mikozala te na biklezia katoliko na protestants soki biteyelo bifugwami te".

Police epanzaki bango na kobetaka gaz lacrymogene, kolanda AFP.

Ba syndicats ya balakisi ya biteyelo ya katoliko na protestants basilaki kotelemisaki misala uto mokolo ya misato. Bazali kosenga lifuta ya malonga ya 300$ mpe mosolo ya misala ya biteyelo kolanda bonene na moko moko.

Nzokande bulamatari esakolaki ete eteyelo ya likonzo (primaire) ekozala ofele mobu moye lokola mobeko likonzi molaba yango.

XS
SM
MD
LG