Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bazuzi baboyi bosenga ya kobisama Germain Katanga na boloko


Germain Katanga, mokambi ya kala ya lingomba ya batomboki FRPI na Ituri, asambisami na Cour pénale internationale (CPI), La Haye, 23 mai 2014.
Germain Katanga, mokambi ya kala ya lingomba ya batomboki FRPI na Ituri, asambisami na Cour pénale internationale (CPI), La Haye, 23 mai 2014.

Haute Cour militaire eboyi bosenga ya kobima na boloko ya Germain Katanga, mokambi ya kala ya lingomba ya batomboki FRPI na Ituri, elongo na bakangami basusu.

Germain Katanga na bato baye motoba basambisamaka banda février 2016.

Bazuzi bayambi bosenga yango kasi balobi ezali na loboko te, mpo Geramin Katanga afunda mpo mbemba ya ntangu ya bitumba, mbemba ya bobomi bato ebele mpe ya bokisami ya lingomba ya batomboki.

Germain Katanga afundama mpo bobomi bato pene 200 na mboka moko na Ituri na 2003. Azalaki kobengama na nkombo ya "Simba" mpo na kanza na ye na ntango ya bitumba liye.

Germain Katanga atikami na CPI na 2015 kasi bakonzi bamokangaki.

XS
SM
MD
LG