Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Koleka bato 46 bakufi na likama na mines na Kolwezi


Baluki makele (mine) na maboko na Kolwezi, Lualaba, 11 juin 2016. REUTERS/Kenny Katombe/File Photo
Baluki makele (mine) na maboko na Kolwezi, Lualaba, 11 juin 2016. REUTERS/Kenny Katombe/File Photo

Mabele ekweyi na mine ya concession privée ya KCC (Katanga Copper Company) mpe ebomi ba koleka 46 na Kolwezi, eyebisi mokambi ya etuka ya Lualaba, Richard Muyej Manguez.

Bolukiluki bozala kokoba. Kino lobi na mpokwa, nzoto ya bato 46 nde ezwamaki.

Motango ya bato bawei mokoki komata, kolanda maloba ya bakonzi na esika eye na correspondant ya VOA Lingala na region ya Katanga.

Baye bakufi bazalaki koluka makele (mine) na moyibi.

Mokambi ya etuka ya Lualaba, Richard Muyej Manguez, akebisi batimoli makele na maboko mpo esika yango ezali na likama mingi.

Baye bakufi bazalaki koluka makele (mine) na moyibi.

Gouverneur Muyej asengi ete baluki makele na maboko bayeba kotosa mibeko ya mboka.

XS
SM
MD
LG