Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 210 babomaki na janvier na Est, kolanda KST


Basoda ya FARDC bazali kolanda mateya ya bayi contingent ya Brésil na Monusco, na Beni, Nord-Kivu, 3 février 2020. (Twitter/MONUSCO/Michael Ali)
Basoda ya FARDC bazali kolanda mateya ya bayi contingent ya Brésil na Monusco, na Beni, Nord-Kivu, 3 février 2020. (Twitter/MONUSCO/Michael Ali)

Ba civils 210 bakufaki na bitumba na sanza ya yambo na bituka ya Nord mpe Sud-Kivu elobi rapport ya Baromètre sécuritaire ya Kivu (KST). Rapport yango ekebisi mpo na bozangi makoki ya mampinga ya ekolo Congo démocratique liboso ya mangambo ya basimba minduki.

Rapport yango eyebisi ete ba foyers minei ya tension (matata) ezali nanu na Nord mpe Sud-Kivu.

"Mampinga ya Congo mamonani lokola makoki te kosukisa mbeba ezali kosolama likoyo ya bacivils na kati ya ba foyers minei ya matata miye. (FARDC) ezali na ba problèmes logistiques ya makasi," elobi KST.

KST ezali projet esalaka na Groupe d’études ya Congo (GEC) ya Université ya New York mpe na ONG ya makoki ma bomoto Human Rights Watch (HRW).

XS
SM
MD
LG