Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moto monene na entredépôt ya carburant na Kinshasa mpe na Kananga


Motuka ya bobomi moto ya RVA na esika moto monene mpoelaki na dépôt ya carburant na Kananga, Kasai central. (VOA/Sosthene Kambidi)
Motuka ya bobomi moto ya RVA na esika moto monene mpoelaki na dépôt ya carburant na Kananga, Kasai central. (VOA/Sosthene Kambidi)

Moto monene mopelaki na esika ya bobombi carburant na Kinshasa, engumba mokonzi ya RDC, mpe na Kananga, na Kasai, epayi bavandi elongo na misala ya ba pompiers basali makasi ya kosilisa likama.

Police nationale congolaise (PNC) esakolaki na ntongo ete dépôt ya carburant epelaki moto na 1ere rue ya quartier Debonhomme na Matete, na boulevard Lumumba.

Ekoki ko exploser mpe kozikisa biloko ebele, ekebisaki PNC na liyebisi.

Ministre ya mambi ya Hydricarbures ya engumba kinshasa, Flavien Nkui, alobi moto akufi te kasi biloko bibesami.

Bavandi bayebisi bayebisi AFP ete basepeli te lolenge dépôt yango etongama kati na ndako ya bovandi. Balobi soki moto mopelaki na butu mbele bakokaki te koboma yango mpe mbele bato balingaki kokufa.

Nzokande, moto mosusu mopelaki mpe pene na nzanga na Kananga, engumba mokonzi ya Kasai central.

Moto ya dépôt ya carburant na Kananga. Kino 17h10, mituka ya bobomi moto ya RVA mpe ya monusco mikoki nain ore koboma moto. Mayi masili na mituka mibale ya bobomi moto, eyebisi correspondant ya VOA Lingala na Kangana.

Nzokande mobu moleki bato ebele bakufaki na moto ntango motuka mokomemaka petololo mopelaki moto. Bato pene na 50 bakufaki Mbuba, na Kongo central na octobre 2018 mpe basusu bawaki na décembre 2018 na Bukavu, na Sud-Kivu.

XS
SM
MD
LG