Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mampinga ya Amerika makosunga ba FARDC na bitumba na ba ADF


Général Syvlvain Ekenge, molebeli ya mibale ya ba FARDC, na bokutani na banzi sango na Beni, Nord-Kivu, 26 septembre 2019. (VOA/ERikas Mwisi)
Général Syvlvain Ekenge, molebeli ya mibale ya ba FARDC, na bokutani na banzi sango na Beni, Nord-Kivu, 26 septembre 2019. (VOA/ERikas Mwisi)

"Mampinga ya Amerika mabongisami mpo na kosalisa Congo démocratique na bitumba na ba ADF mpe basimba minduki misusu," elobi molebeli ya mibale ya ba FARDC, mampinga ya RDC. 

Général Syvlvain Ekenge, molebeli ya mibale ya ba FARDC ayebisi na bapanzi sango na Beni ete lisungi ya Amerika likopesa na nzela ya Africom oyo ezali Unité ya commandement to ya bokambi bokengi ya Amerika na Afrika.

General Ekenge alobi ete état-major intégrée to ya kosangana ekosalama mpo na Beni.

Na sanza ya motoba, président Felix Tshisekedi asololaki likambo yango na Kinshasa na Généra ya brigade ya Etats-Unis Steven deMilliano oyo azali mokambi ya Africom.

XS
SM
MD
LG