Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Balakisi ya université basengi lifuta ya 5.000$ yambo na kozongela mateya


Université ya Kinshasa, 13 avril 2015. (Facebook/Unikin)
Université ya Kinshasa, 13 avril 2015. (Facebook/Unikin)

Balakisi ya Université ya Kinshasa (UNIKIN) basengi na mbulamatari lifuta lya 5.000$ yambo bazongela mosala. Balobi mokolo moko nsima na mbulamatari kosakola ete kelasi ya ba universités ekozango le 10 août 2020.

"Na kotalaka ndenge eloko moko te esalami, bokangi moto (ya bakonzi), tozali kokundola na bato banso ete UNIKIN ezalaki na botelemisi mosala (grève) yambo na état d’urgence," elakisi liyebisi etiami manzanga na Dynamique des profresseurs ya UNIKIN na Collectif ya personnel (Basali) ya Ensegneiment supérieur.

Mbulamatari esakolaki lundi linaka ya bonzongi ya kelasi nsima na bosili ya état d’urgence ya sanza minei etiamaki na président Félix Tshisekedi mpo na kobundisa COVID19.

Kolanda linaka lyango, esengelaki nkisi ebanda kotiama na ba universités mardi mpo kolengela bozongi ya bana ya kelasi, elakaki vice-premier ministre mpe ministre ya Intérieur, Gilbert Kankonde.

Année blanche ekozala te na Ekolo Congo démocratique, elobaki mbulamatari.

Bana kelasi ya suka ya biteyelo ya primaire na secondaires basengeli bazonga le 3 aout.

Examen d’Etat ekosalama wuto le 24 kino le 27 août 2020, kolanda ministre ya EPST, Willy Bakonga.

Bakelsai ya bato mike, mingi mpeza ba kelasi ya ba doctorants, 2e licence mpe 3e graduat nde ezaongeli le 10 aout. Mbulamatari elobi te soki kelasi misusu ekozonga mokolo nini.

XS
SM
MD
LG