Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakeli mibeko ya mboka bapameli Ministre wa Yambo na kolakisa mawa te mpo na basi mpe bana ba Beni


Ministre wa Yambo ya sika ya RDC Jean-Michel Sama Lukombe, 15 février 2021. (Twitter/Président RDC)
Ministre wa Yambo ya sika ya RDC Jean-Michel Sama Lukombe, 15 février 2021. (Twitter/Président RDC)

Bakeli mibeko ba mboka bapameli ministre wa Yambo na kolakisa mawa kaka na baye bakufaki na Ituri mikolo mileki kasi te na basi mpe bana babomami na Beni.

Na mokanda batindeli Ministre wayambo, Jean-Michel Sama Lukonde, bakeli mibeko 13 nde batie manzaka.

"Nsima na kolanda liyebisi lya likita lya motoba ya mbulamatari ya le 4 juin 2021, tosopeli te ete olobeli kaka bobomami ya pene na bana mboka tuku motoba na Boga mpe Tchabi ntango Beni mpe ezalaki na makambo ma lolenge moko." elobi ba députés nationaux baye.

Basengi mbulamatari elakisaka mawa mpe ememaka lisungi na bato babikaki na bobomomi boye na Beni.

Bakeli mibeko bakundelo ete ba ADF mpe ba bomaki ba mama, bana, bilenge mpe ba mpaka 150 na Beni na mikolo 21 mileki.

Bakeli mibeko byango batangi bisika basimba minduki babomaki bato baye.

XS
SM
MD
LG