Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba UPDF na ba FARDC balobi bakangi moko na bakonzi ba ADF na Uvira


BAyi police ya Uganda bazali kosolola na bakima bitumba na Kisoro, Uganda, 10 novembre 2021
BAyi police ya Uganda bazali kosolola na bakima bitumba na Kisoro, Uganda, 10 novembre 2021

Bayi misala mya bokengi ya ekolo Congo democratique basakoli ete bakangaki bongo le 11 Janvier Benjamin Kisokeranio, moko na bakambi ya lingomba ADF na mboka Uvira Sud-Kivu ntango azalaki koluka kikima na engumba Bujumbura na mboka Burundi.

Moko ya bayi mampinga FARDC mpe bayi UPDF ya ekolo Ouganda baye babakisi ete azalaki bongo na passeport ya ekolo Congp Democratique eye ezalli na nkombo ya Djimy Kilalo Kasereka.

Na rapport na bango babimiska na mobu 2018, groupe d’etudes du Congo(GEC) elakisaka ete Benjamin Kisokeranio azali mokonzi ya ba ADF oyo asalaka misala mya renseignement, finances, mpe approvisionnement ya lingomba liye.

Bosengeli koyeba ete, Benjamin Kisokeranio azali yoko ya bato banene ya liboso lya lingomba ADF oyo akangemi o maboko ma bayi Fardc.

XS
SM
MD
LG