Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sénat lolola Assemblée nationale endimi kobakisa bolayi ya état de siege na est


Ba officiers ya polici bazali kobatela gouverneur ya civili ya Nord-Kivu, Carly Nzanzu Kasivita, nsima ya bozwami ya bokonzi ya General Constant Ndima bo' gouverneur militaire, Goms. o'mokolo mwa 10 mai 2021 engebene na etat de siege. (Photo AFP/ALEXIS HUGUET)
Ba officiers ya polici bazali kobatela gouverneur ya civili ya Nord-Kivu, Carly Nzanzu Kasivita, nsima ya bozwami ya bokonzi ya General Constant Ndima bo' gouverneur militaire, Goms. o'mokolo mwa 10 mai 2021 engebene na etat de siege. (Photo AFP/ALEXIS HUGUET)

Suku mibale ya Parlement ya RDC, Sénat mpe Assaemblée nationale, endimi kobakisa mikolo mpo na mbala ya zomi na mibale na état de siège ata bakeli mibeko ya est basepeli na yango te.

Sénat nde endimaki mwango jeudi na nzela ya maponami ya bakeli mibeko.

Yambo na yango, Assemblée nationale ya ekolo Congo Democratique esalaki se ndenge moko mercredi.

Parlement ebakisi bongo mikolo na état de siège na Ituri na Nord-Kivu mpo na mbala ya zomi na mibale mpo na bokengi bwa ba province mibale wana.

Bobakisi bwango bozali ya mikolo zomi na mitano. Ekobanda le 19 novembre pe ekosila le 3 décembre

Nzokande ba députés ya Nord-Kivu na ya Ituri baboyi ko tia misapi mya bango na mokanda ya bobendisami molayi ya état de siège eye.

Bakeli mibeko ya est bazali kopamela boko na bakonzi ya basoda na kosalela mpe batomboki. Lokola ba colonels batano baye bakatelami mibu zomi ya boloko mpo na bopengwisi misolo na Ituri na kati ya état de siège o sanza ya octobre 2021.

Court militaire ya Ituri ekatelaki mibu zomi ya boloko na ba colonels batano, ya polce nationale mpe ya mapinga, basambisamaki mpo na bopengwisi misolo mya misala mya mampinga mpe police.

Ba officiers ya ba soda mpe ya police nationale (PNC) baye balongalamaki na mampinga mpe police, kolanda mokano Cour militaire ya Ituri esakolaki.

Ba colonels babale basusu ya ba FARDC, mampinga ma Ekolo Congo démocratique bapesamaki sanza zomi na mibale ya boloko mpe babale batikami. Basambisamaki wuto le 17 septembre.

Le 21 juillet, ba officiers mwambe ya mampinga mpe PNC bakangamaki nsima na inspection générale ya ba FARDC kolaba ete emonisamaki été bapengwisaki misolo mya l’Etat,

Ba avocats ba bango balobaki te soki bakosenga bobandeli ya bosambisami.

Ituri, lokola mpe Beni na etuka ya Nord-Kivu etiamaki na état de siège wuto sanza ya mitano to mai 2021, mpo na kobundisa basimba minduki ya ba ADF mpe basusu.

XS
SM
MD
LG