Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba FARDC bakangi bato babale mpo na bombe ebetaki na wenze ya Oicha


Basoda ba kimya ba MONUSCO na bisika bombe moko artisanale ebeti na ndako ya Nzambe moko ya katoliko Emmanuela Butsili, na Beni, Nord-Kivu, 27 juin 2021.
Basoda ba kimya ba MONUSCO na bisika bombe moko artisanale ebeti na ndako ya Nzambe moko ya katoliko Emmanuela Butsili, na Beni, Nord-Kivu, 27 juin 2021.

Mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) masakoli ete makangi bato babale mpo na bombe ebetaki na wenze ya Oicha, territoire ya Beni, na Nord-Kivu.

Molebeli ya misala Sokola 1 ya mampinga, capitaine Anthony Mwalichayi alobi ba FARDC bakangi bato babale baye minutes ntuku mmisato (30) nsima na bombe yango kobeta.

Bato bango bazali koyanola sika na mituna, ebakisi capitaine Mwalushayi.

Bato bakufi te mpe bazokaki te mpe eloko moko te ebebi nsima na bombe yango kobeta na ntongo ya mecredi.

Bombe mosusu ebtaki o'mokolo mwa Noel, le 25 décembre mpe bato koleka motoba bakufaki.

Basimba minduki ya ba ADF nde bafundamaka na kotiaka ba bombes.

XS
SM
MD
LG