Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mboso, Katumbi na basusu bapameli bomomi ya bato na Noël na Beni


Nzoto ya moko na bato bazoki na bombe na Beni, Nord-Kivu, 26 décembre 2021
Nzoto ya moko na bato bazoki na bombe na Beni, Nord-Kivu, 26 décembre 2021

Bayi politiki bayike balakisi mpasi o’mitema nsima na bombe koboma koleka bato motoba bakufi na bombe na Beni, na Nord-Kivu, na o’mokolo mwa Noël.

"Na nkombo ya baninga ban gai bakeli mibeko, na pameli makasi bobomi badongolomeso basali nab ana ba Beni ntango tozalaki banso kokanisa mbotama ya Kristu," ekomi na Twitter mokambi ya Assemblée nationale, Christophe Mboso.

Moïse Katumbi, mokambi ya lingomba Ensemble pour la république ye mpe apameli yango.

"Napameli bobomi bomemi mantanga na Beni. Nalendisi mabota mazwi makufisi bato. Pole inso esengeli kosalama mpo na likambo lya mpasi. Makila ma bato bayebi likambo te masengeli makoba lisusu te kosopana. Bato basali yango mpe baye bapesaki bango maboko na makambo mabe maye masengeli basukisama", ekomi na ngambo na ye M. Katumbi.

Molebeli ya mbulamatari ya RDC, Patrick Muyaya alobi bato mwambe bakufaki. Bacivili sambo na soda moko azalaki na restaurant na libota lya ye, elobi Muyaya.

Kolanda molobeli ya mbulamatari ya ba soda na Nord-Kivu, général Sylvain Ekenge, ezalaki nde « Kamikaze » moko nde abetaki bombe yango na bokoti ya ekala nsima na bakengeli kopekisa ye kokota.

Batomboki ya ba ADF nde bafundamaka na kobomoa bato na Beni.

Mampinga ma Unganda, UPDF, na maye ma RDC, FARDC, mazali kobundisa ba ADF na Beni wuto le 30 novembre 2021.

XS
SM
MD
LG