Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mayobo asakoli ete PALU ekoti Union sacrée ya président Tshisekedi


Bakangi ya Palu bazali kotambola na Kinshasa, RDC, 3 février 2020. (Facebook/PALU)
Bakangi ya Palu bazali kotambola na Kinshasa, RDC, 3 février 2020. (Facebook/PALU)

PALU (Parti ya ba Lumumbistes unifiés) esakoli ete ekomitisi na Union sacrée (liboke lilamu) mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi azali kokela. PALU, lingomba lizalaki kati na FCC ya J. Kabila mokonzi ya kala, esakoli mokano moye kati na bobendani bozali na mboka kati na ngambo ya Tshisekedi na Kabila.

"PALU elobi ete ntango ekoki, na nsima ya mbela ua mokonzi ya mboka, ya kosangana, komibongisa malamu mpe kobanda kobundisa mpenza mpe na mpiko, nkwokoso inso ya bomoi mpe ya ntombwa Congo mpe na bana mboka bazali komona," ekomi na liyebisi kalaka mokambi mpe molobeli ya PALU," Godefroid Mayobo.

Motombwisi ya PALU alimboli ete mpo na ye, mbela ya mokonzi ya mboka ezali te mpo na mpo na matata na Assemblée nationale.

M. Mayobo alobi PALU esepeli mpo mokonzi ya mboka andimi makasi mayike epasaki ye na boyoki bato asalaki mposo misato.

"Matata maye masengeli te kozala likolo na makanisi ma mokonzi ya mboka, maye matali lobi ya ekolo mobimba mpe mazali kosenga kaka bomoko, na koyikisa makasi na masolo ya kati mpe kondimama na kimya mpe bokengi ya banso," ekomi M. Mayobo na liyebisi.

M. Mayobo azali na ngambo moko ya PALU. Lingomba liye likabwana na ngambo misato wuto mokambi na yango Lugi Gizenga, mwana ya Antoine Gizenga, akufa.

Ngambo esusu ya PALU, likambama na mwana mosusu ya Antoine Gizenga, Dorothée Gizenga eboyaka M. Mayobo mpe elongolaki ye.

XS
SM
MD
LG