Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Libota ya Chebeya mpe VSV basengi bosambisami bobandelama mibu 10 nsima na liwa lya ye


FILE - human rights activist Floribert Chebeya Bahizire speaks during a seminar in Kinshasa, Congo.
FILE - human rights activist Floribert Chebeya Bahizire speaks during a seminar in Kinshasa, Congo.

Floribert Chebeya, mokambi ya VSV (Voix des Sans Voix) akufaki mibu zomi mileki (1er juin 2010). Libota lya ye mpe lingomobe na ye lya bitumba mpo na makoki ma bomoto VSV basengi bobandelami ya bosambisa bwa liwa liya ye.

Libota lya Chebeya elongo na VSV bakendaki kopesa losako na lilita lya moweyi.

Bakanisaki mpe liwa lya moyi VSV Fidèle Bazana oyo atikala komonono te wuto mokolo M. Chebeya akufaki ntango bakendi bango mibale na bokutani na inspecteur général ya police. M. Bazana azalaki motambwisi motuka ya M. Chebeya.

"Bato banso batikamaki pembeni na bosambisami ntango emomnana polele ete bazalaki na liwa lyango. bakangama, bamemama na ba zuzi mpe basambisama mpe lokola na ntina ya kosalakisa bokasi bwa bitumba na "impunité 'zéro tolérance' "," esengi libota na liyebisi.

Ba ONG ya mamkoki ma bomoto bango mpe basangisaki mongongo mwa bango na VSV mpo na kosenga eyano ya président Félix Tshisekedi.

"VSV ezali kosenga na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, na makoki ma ye ya zuzi ya yambo, asala manso mpo bosambisami bofungolama lisusu," elobi na ngambo na ye Rostin Manketa, moko na bakambi ya VSV, liboso ya bapanzi ya sango.

Nzoto ya Floribert Chebeya ekutamaki le 2 juin 2010 kati na motuka na Mitendi, na Kinshasa pene na Kongo central kasi esengelaki yambo na yango akutana na mpokwa na inspecteur général ya police ya eleko ena, général John Numbi. Nzoto ya Bazana emonana te kino lelo. Esika ya suka amonanaki ezali na inspection générale ya police.

Nsima na bosambisami, colonel Daniel Mukalay, moko na basungi ta général Numbi, akatelamaki etumbu ya mibu 15 ya misala makasi.

Paul Mwilambwe, oyo azalaki kosala na reception na inspection générale ya police na Kinshasa, alobaka uto Sénégal epayi akima, ete azalaki monzenene ya liwa ya Chebeya. Atatolaka ete amonaki ndenge babomaki ye na ndako ya police mpe asengaka bokengi mpo na kozonga koloba liboso ya bazuzi na Kinshasa

XS
SM
MD
LG