Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ambassadeur “Koko” Swing ya kala ya USA akufi na mibu 86


Bill Swing to "koko Swing", mokambi ya kala ya MONUSCO mpe ambassadeur ya kala ya ya Etats-Unis na RDC na ambassadeur ya sika ya Etats-Unis na Kinshasa, le 12 octobre 2018. (Twitter/Mike Hammer)
Bill Swing to "koko Swing", mokambi ya kala ya MONUSCO mpe ambassadeur ya kala ya ya Etats-Unis na RDC na ambassadeur ya sika ya Etats-Unis na Kinshasa, le 12 octobre 2018. (Twitter/Mike Hammer)

“Koko” Swing, ambassadeur ya kala ya Etats-Unis na Kinshasa mpe mokambi ya kala ya MONUSCO akufi, esakoli ntoma ya USA ya ntango eye ya Amerika na RDC.

“Na mawa mingi nde na yoki sango ya liwa lya moninga na nga ya kala ya mosala mpe moningami na ngai, ntoma Bill ‘Koko’ Swing,” ekomi na Twitter ambassadeur Mike “Nzita” Hammer.

Ntoma Bill Swing asalaka mingi na RDC mpe na Congo-Brazzaville.

Yambo, Bill Swing azalaki ambassadeur ya Etats-Unis na Brazzaville (1979-1981) mpe na Kinshasa (1998-2001).

Akomaki mpe motambwisi ya MONUSCO mpe ya misala mya ONU na RDC wuto 2003 kino 2008.

Ayebanaka mingi mpo na masese azalaki koloba na Lingala. Ayembabaka ata na nzembo.

Akufi na mibu 86 na Kuala Lumpur ma Malaisie.

XS
SM
MD
LG