Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CAN: RDC eleki ½ finale nsima na konika Guinée 3-1


FBL-CAN-2024-COD-GUI
FBL-CAN-2024-COD-GUI

Ba Léopards ya RDC bakobeta ½ finale ya CAN 2023 na molongi ya match ya ¼ Côte d’Ivoire-Mali o’mokolo mwa mosala misato mokoya (7 février 2023) na stade Olympique Ebimpé (Alassane Ouatarra) na nord ya Abidjan, na Côte d'Ivoire.

Basani ba RDC baleki na ½ na kopolisa 3-1 ba Syli ya Guinée.

Ata ko’ ba Syli babandaki na mongete ya yambo na penalty Mohamed Bayo atiaki na 20’, ba Léopards bayebaki kozongisa na 27’ minute na capiaine na bango Chancel Mbeba, mpe babakisa na penalty ya Yoane Wissa na 65’, nde basukisaki na mongete ya Arthur Maswaku moye motiki bato mingi minoko ya kofungwama na 82’ na "coup franc" d'anthologie.

Nzokande, basani ba Guinée nde bazalaki 63% ya kosimba ndembo mpe RDC kaka 37&.

Na match mosusu, Nigeria elekaki na kopolisa Angola 1+0.

Ba Super Eagles bakozela molongi ya match Cap-Vert-Afrika ya Ngele.

Forum

XS
SM
MD
LG