Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CAN 2023: Bafana Bafana bakobeta 1/4 na Cap Vert mpe Mali na Côte d'Ivoire


Basani ba Afrika ya Ngele bazali kosepela nsima na mongete na bango ya mibale liboso lya Maroc na 8e ya CAN 2023, na stade San Pedro, Côte d'Ivoire, 30 sanza ya yambo 2024.
Basani ba Afrika ya Ngele bazali kosepela nsima na mongete na bango ya mibale liboso lya Maroc na 8e ya CAN 2023, na stade San Pedro, Côte d'Ivoire, 30 sanza ya yambo 2024.

Bafana Bafana ya Afrika ya Ngele balongoli ba Lions ya Atlas ya Maroc na 8e ya finale na kopolisa bango 2-0 na stade ya San Pedro na CAN Côte d'Ivoire 2023 mpe Ba Aigles ya Mali bakweyisi ba Etalons ya Burkina Fasa na 2-1.

Bikamwisi bizali kokba na CAN 2023 eye ezali kobetama na Côte d'Ivoire.

Bafana Bafana bakobeta bongo 1/4 ya finale na Cap Vert o'mokolo mwa mposo.

Ba Aigles ya Mali nde na ba Eléphants ya Côte d'Ivoire, ekolo eye eyambi momekano moye, kaka mokolo mwa mposo yango.

Forum

XS
SM
MD
LG