Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CAN 2023: 1/4 Angola- Nigeria o'mokolo mwa mosala mitano na Abidjan


Basani ba Nigeria bazali kosepela nsima na elonga na bango liboso lya Cameroun na 8e ya finale ya CAN 2023 na etando ya masano Félix Houphouet-Boigny, Abidjan, 27 sanza ya yambo 2024.
Basani ba Nigeria bazali kosepela nsima na elonga na bango liboso lya Cameroun na 8e ya finale ya CAN 2023 na etando ya masano Félix Houphouet-Boigny, Abidjan, 27 sanza ya yambo 2024.

Ba Palancas Negras ya Angola na Super Eagles ya Nigeria nde bikolo mibale bya yambo baleki na ¼ ya finale ya CAN 2023 eye ezali kobetama na Côte d’Ivoire.

Angola eleki nsima na kolonga 3-0 Namibie na match ya yambo ya 8e ya finale ya mokolo mwa mposo na etando ya masano ya Bouaké.

Nigeria nde elongaki 2-0 Cameroun na etando ya masano Félix Houphouet-Boigny.

Angola na Nigeria bakobeta match na bango ya ¼ mokolo mwa mosala mitano kaka na etando ya masano Félix Houphouet-Boigny.

Forum

XS
SM
MD
LG