Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba Léopards ya RDC bakopeta ¼ na ba Syli national ya Guinée o’mokolo mwa mitano


Basani ba RDC bamemi moyambi na bango Lionel Mpasi-Nzau nsima na bango kolonga Egypte na 8e ya finales ya CAN 2023 na Côte d'Ivoire, San-Pedro, 28 sanza ya yambo 2023.
Basani ba RDC bamemi moyambi na bango Lionel Mpasi-Nzau nsima na bango kolonga Egypte na 8e ya finales ya CAN 2023 na Côte d'Ivoire, San-Pedro, 28 sanza ya yambo 2023.

Ba Léopards ya RDC bapolisi o’mokolo mwa eyenga na ba tirs au but 1 (8) -1 (7) ba Pharaons ya Egypte mpe baleki bongo na ¼ de finales ya Coupe d’Afrique ya bikolo CAN 2023 eye ezali kobetama na Côte d’Ivoire.

Basani ya mibali ya RDC bakobeta bongo o’mokolo mwa mitano, mokolo mwa mibale ya sanza ya mibale ya 2024, na ba Syli national ya Guinée.

Guinée, yango mpe ewutaki koleka na ¼ ya finale o’mokolo mwa eyanga na kopolisaka 1-0 Guinée équatoriale na match ebetamaki yambo na stade stade olympic ya Alassane Outatara (Ebimpé0 na Abidjan.

Lisano lyango likozala na stade Stade Laurent Pokouya San-Pedro.

Forum

XS
SM
MD
LG