Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FECOFA epameli CAF kolongola etumbu likolo na Walid Regragui ya Maroc


Basani ba RDC basimabni na nzoto na baye ba Maroc nsima na match ya 16e ya finale na stade Laurent Pokou, na San Pedro, Côte d'Ivoire, 21 sanza ya yambo 2024.
Basani ba RDC basimabni na nzoto na baye ba Maroc nsima na match ya 16e ya finale na stade Laurent Pokou, na San Pedro, Côte d'Ivoire, 21 sanza ya yambo 2024.

Federation ya lisano lya ndembo na RDC, FECOFA, elobi na liyebisi ete ekokende na Tribunal arbitral ya Sport TAS mpo na kopamela lolenge Commission d’appel ya Confederation africaine ya lisano lya ndembo CAF elongoli etumbu epesaki selectionneur ya Maroc Walid Regragui mpo na bitumba mpe matata ebimaki na match kati na Maroc na RDC na 16e ya Finale.

Mpo na FECOFA, mokano mwa CAF ya kolongola etumbu eye ezwami na loboko lyoko te.

CAF epemisaki Walid Regraguie match mibale mpo na maloba ma racisme alobelaki capitaine ya ba Leopards ya RDC Chancel Mbemba ntango azalaki na suka ya match. Yango ebimisaki bitumba.

Etumbu yango ezalaki ya matches minei, kasi mibale nde esengelaki kokkisama.

Kasi na bosolo, Waldi Regragui apemisi kaka match moko eye Maroc elongaki 1-0 na 16e ya finale na Zambie.

Sélectionneur ya Maroc asengelaki mpe kofuta lomande la $5.000.

Nzokande, etumbu inso ekwetaka na CAN ntango ba ekipi balekaka na 1/4 ya finale kowuta na 8e.

Forum

XS
SM
MD
LG