Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Côte d'Ivoire eleki na 1/4 ya finale na kopolisa Sénégal mpe Cap Verde na kobeta Mauritanie

Basani ba Côte d'Ivoire #20 Christian Kouame (G) na #17 Serge Aurier (D) bazali kosepaela nsima na kopolisa Senegal na 8e ya CAN, na stade Charles Konan Banny na Yamoussoukro, Côte d'Ivoire, 29 sanza ya yambo 2024.

Ba Eléphants ya Côte d'Ivoire basali bikamwa na kopolisaka 1 (5) - 1 (4) ba Lions ya Teranga ya Sénégal na 8e ya finale ya CAN 2023 na ba tirs au but.

Sénégal elongwe ata ko ezalaki molongi ya CAN ya mbala eleki, lokola mpe na CHAN.

Bikamwa, mpo Côte d'Ivoire elakaki na 8e ya finale lokola "meilleur 3e" nsima na ba calculs mingi.

Bakobeta bongo mokolo mwa mposo mokoya kasi bakozela molongi match ya 8e lobi kati na Mali-Burkina Faso to Maroc-Afrika ya Ngele.

Na match mosusu, Cap Verde eleki mpe nsima na kolonga 1-0 Maurtianie.

Forum

XS
SM
MD
LG