Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame ayebisi ba officiers ya sika ya Rwanda ete kobongisa kimya esengaka ntango mosusu bitumba


Président Paul Kagame azali kopesa mpete na officiers moko asilisi kelasi na Académie militaire ya Gako, Rwanda, 4 novembre 2022. (Twitter/Présidence Rwanda)
Président Paul Kagame azali kopesa mpete na officiers moko asilisi kelasi na Académie militaire ya Gako, Rwanda, 4 novembre 2022. (Twitter/Présidence Rwanda)

Mokonzi ya Rwanda Paul Kagame akambaki o’mokolo mwa minei milulu mya bosilisi kelasi ya ba officiers (568) nkama mitano na ntuku moba na mwambe ya mampinga ma Rwanda (RDF) na Eteyelo to Academie militaire ya Rwanda na Gako.

“Ntango kimya ezali te, tosalaka nyonso mpo na kozongisa yango, mpe ntango mosusu esangaka kobunda bitumba. Kobunda bitumba esengaka boyebi, esengaka bolongi ya kobunda mpo na makoki ma bino mpe mpo na ekolo na bino, mpe bongo kimya ekoya,” elobi Paul Kagame na milulu myango.

Kati na ba officiers baye ya bilenge (475) nkma minei na ntuku sambo na mitano bapesamaki mateya mobu moko mpe (93) ntuku libwa na misato basilisi kelasi nsima na mibu minei ya Academie mpe malakisi ma ba soda, elobi ndako ya misala mya mokonzi ya Rwanda na Twitter.

XS
SM
MD
LG